Fonds ya TAN

عربي | English | Français | Lingála | Português | Soomaali | Español

  • 1 mai 2023 – Ba demandes efungwami
  • 31 mai 2023 – Mokolo ya suka ya bosengi
  • 23 juin 2023 – Balongi basakolami
  • 30 juin 2023 – Ba prix efutami

Bo finga awa pona kosenga Fonds ya TAN.

TAN epesi bourses ya moke ya $500 – $1000 mpo na kosalisa ba mposa financier ya sikoyo mpe kobongisa makambo mpo na mikolo ya koya. Procédure oyo ezali mpo na kosalisa ba artistes bakotisa application ya bourse mpo na ntango ya liboso.

Lisálisi yangó ekosálisa misala ndenge na ndenge lolaka kofúta ba artistes mpó na misala na bangó, kosómba piblisité mpó na ba événements, kokangisa ba video, ba foto, kosála site web, mbongo mpó na kotámbwisa, kosómba ba instruments, na esika ya koyékola.

Fonds TAN ekokambama na Mayo Street Arts mpe ekotalelama na Comité ya Fonds TAN oyo ezali na bato ya lisanga ya Portland mpe Lewiston/Auburn.

Na 2022, ba artiste balandi bazwaki lifuti ya TAN Fund:

  • Baba Ly — Mobeti guitare accoustique mpe mobeti masitwale , akosomba instrument ya sonorisation ya sika mpo na kosunga mosala na ye
  • Batimbo United — Lingoma ya babeti drumi mpe babini ya Burundi; akofuta mbongo ya transport ya ba drumi ya sika uta na Burundi
  • Fanfare Kimbanguiste (FAKI) — Lingomba ya Eklezia ya Kongo, bakosomba ba instruments mingi koleka mpo na lingomba na bango, mpe tuba moko.
  • Jawad Al Fatlawi — Banganga mayele babeti ya oud player & luthier;bakobanda kosala “Goldeneye” ya sika na lolenge ya guitare.
  • Michelle Kazaka — Mokomi & mobeti masitwale; akobimisa & mpe kotombwisa misala na ye na nkombo, “How Long the Night”
  • Namory Keita — Guinean nganga mayele mobeti drumi; akosomba badrumi y sika mpo ete bayekoli na ye bakolisa mosala na ye ya moteyi
  • Sabina Najafova — Mobini & artiste na misala ya plastique uta na Azerbaijan; akosomba equipement plastique mpe bilamba ya sika mpo na kobeta na yango
  • Sayalí Robles — Artiste Taíno ya mwana mboka na bankoko uta na Africa; bakosala lingomba ya koyekola mabina ya Bomba mpe komema bonkoko ya Borikén (oyo babengi sikoyo Puerto Rico) na Maine

TAN Fund ezali kozwa lisalisi ewuti na Commission ya Maine Arts, oyo ezali agence ya leta indépendant oyo ezui lisalisi ya National Endowment for the Arts.