Traditional Arts Network

عربي | English | Français | Lingála | Português | Soomaali | Español

Traditional Arts Network (TAN) ezali sindika ya ba artistes traditionnels na lisanga. TAN epesi lisalisi na mambi ma mibeko mpo na ba artistes ya sika na ba organisations ya kiltire na Maine ya ba communautés Bantu ewuta na Rwanda, Burundi, Congo, somali, na misusu.

Bo finga awa pona kosenga Fonds ya TAN. Esengeli kotinda ba demandes liboso ya mokolo ya 31 mai 2023.

Rwandan dancer Clarisse Mukashyaka spontaneously bursts into dance as Guinean drummer Namory Keita performs at the Traditional Arts Network Gathering at Mayo Street Arts on 12/11/21. (Photo by Coco McCracken)

Collaboration ya Mayo Street Arts (MSA) na Cultural Resources, esali ete TAN ekola na sima ya ba discussions na ba artistes traditional ya bizinga oyo balingi kokutana na ba communautés misusu na ba artistes.

Na sima ya kokutana na ba artistes misusu; bato lokola ba vidéastes, stylistes, mpe ba spécialites culturels; na bato ya ba organisations sans but lucratifs, TAN akopesa mpe ba artistes immigrés opportunité ya kolandela ba pratiques créatives na bango na – soki ba artistes ba lingi – kolakisa misala na bango na lisanga ya monene ntango babombi ba traditions culturelles na bango.

Moto nionso akoki kokoma membre ya TAN soki asengi. Tosengi ete otinda e-mail na TAN@mayostreetarts.org soki olingi koyeba makambo mosusu matali ba événeménts na ba opportunités elandi.

Ba programmes ya TAN eza na:

  • Koyangana ya ba artistes – Opportunité ya kokutana na ba artistes misusu, kokabola mosala, mpe koyekola na baninga
  • Fonds ya TAN – Grants ya mike pn na ba artistes traditionnels kobanda $500 ti na $1 000
  • Formasyo ya Arts Traditionnels – Lisalisi ya mbongo po na ba artistes oyo bazali koluka bapesa ba generation elandin héritage culturelle

TAN ezali kozwa lisalisi moke ewuti na National Endowment for the Arts mpe na Commission ya Maine Arts, oyo ezali agence ya leta indépendant oyo ezui lisalisi ya National Endowment for the Arts.