Formasyo ya Arts Traditionnels

عربي | English | Français | Lingála | Português | Soomaali | Español

Programme ya Formasyo ya arts traditionnels esalisi ba communautés ebatela héritage culturel na bango na ndenge ya kopesa opportunités ya kotangisa na ba guides professionnels oyo bakoki kokabola mayebi na bango na bayekoli. Arts traditionnels ekolake na generation moko na oyo elandi, mingi mingi na kati ya mabota na ba communautés mpe ekoki kozwa ba forme ebele lokola banzembo ya bongongo nto instruments, kobina, kosala na maboko, art culinaires et textiles, na ba misala ya ba koko.

Na ndenge ya baexperience na bango na kolinga ya forme ya art traditionnel, ba guides na bayekoli na bango basengi basala elongo, na ntango moko lokola mbula moko. Ti na $3000 ezali wana mpo na kofuta kotangisa ya ba guides, biloko ya misala na transport.

Nani akoki kozala Guide?

Guide azali moto oyo azali na boyebi na techinque moko traditionnel, nto ya maboko. Bazali komema tradition (bokoko), bayebani na kati ya communauté na bango ndeti moto oyo azali na koyeba ba traditions esengemi. Guide, oyo ayekolo na sima ya kolanda moto mosusu, nkasi na ndenge ya formasyo na kelasi nte, mpe amipesi na mosala ya kolakisa ba formes ya art oyo ezali ya héritage culturel ya communauté.

Nani akoki kozala Moyekoli?

Moyekoli asengemi kozala na boyebi na mayele ya ba forme ya art traditionnel mpe ndenge ya komipesa mpo na kosala na moyekoli (guide). Ba guide baponaka bayekoli na bango. Bayekoli basengi kokabola mayele culturel ya ba guides na bango.

TOZONDIMA BA APPLICATIONS NA NTANGO OYO TE

Cliquez awa pona kotala application ya PDF (ingelezia).

Soki olingi koyeba makambo matali formasyo ya koya, tosengi okomela TAN@mayostreetarts.org nto obenga Mayo Street Arts na 207-879-4629.


TAN ezali kozwa lisalisi moke ewuti na National Endowment for the Arts mpe na Commission ya Maine Arts, oyo ezali agence ya leta indépendant oyo ezui lisalisi ya National Endowment for the Arts.